Bikolo Argentine, Egypte, Ethiopie, Arabie Saoudite mpe Emirats arabes unis, bikobakisama kati na bayi BRICS, lkita lya bikolo bya nkita bizali komata : Bresil, Russie, Inde, Chine na Afrika ya Ngele.
Cyril Ramaphosa, mokonzi ya Afrika ya Ngele nde asakoli yango lelo na likita lya BRICS liye lisukisamaki o'mokolo mwa minei (28 sanza ya mwambe 2023) na Johannesbuurg epayi balakisi bilongi ba bikolo kilikili bakutanaki mikolo minei.
Bikolo koleka ntuku minei bisengaki kokota kati na liboke lya BRICS. Balakisi bilongi bya bikolo koleka ntuku mitano bazalaki na likita lya Johannesburg.
Denis Sassou N’Guesso mokonzi ya ekolo Congo-Brazzaville na ministre wa Yambo ya Ekolo Congo democratique Jean-Michel Sama Lukonde bazalaki mpe kuna.
Denis Sassou N’Guesso alobi ezalaki mpo na ye libaku lya kokutana na bakonzi ba bikolo misusu mpo na pesana mayele mpo na boyokani kati na bikolo.
(G-D) Président Luiz I. Lula ya Brésil, Xi Jimping ya Chine, Cyril Ramaphosa ya Afrika ya Ngele, Ministre wa Yambo ya Inde Narendra Modi mpe ministre ya mambi ma Bapaya ya Russie Sergei Lavrov na Johannesburg, 23 sanza ya mwabe 2023.
Je n'ai pas comparé Chamoiseau à Comte du tout. Lire la suite
Ainsi ...tu te compares à Chamoiseau (Prix Goncourt ) et à Auguste Comte ( Fondateur du positivis Lire la suite
Tu ne sais même pas que toute langue vivante invente des mots régulièrement soit qu'ils émanent d Lire la suite
Décidément l'auteur incorrigible de cet insupportable néologisme est complètement nul en Lettre Lire la suite
...ces salopards de sionistes d’ExtrDte sont capables de tout... Lire la suite